ELIKYA
Nayoki na mosika epai nazali
Kolela na yo
Nazangi nguya ya kobikisa yo
Ngai moto
Natiki yo, na losambo na ngai
Na maboko ya Yahwé
Ye moko asunga pe abikisa yo
Elikya,
Kati ya motema
Kobwaka te
Sengaka na nzambe
Po ye akosalisa yo
Longola
Kobanga,
Pesa elikya epai na ye
Zala na kondima
Po ye akosalisa yo... |